[go: up one dir, main page]

Aller au contenu

Samia Suluhu

Útá Wikipedia.

Samia Suluhu, abotami o mokolo 27 sanza ya liboso 1960 na Zanzibar (na ntango wana ebateli ya Angleterre, lelo Tanzanie ), azali mwasi ya Leta ya Tanzanie . Azali mokonzi ya République unifiée ya Tanzanie banda mokolo 19 sanza ya misato 2021 .

Mosangani ya lisanga Chama cha Mapinduzi (CCM), azalaki liboso ministre na région semi-autonome ya Zanzibar .

Kobanda 2010 kino 2015, azalaki mosangani ya Parlement mpo na circonscription ya Makunduchi mpe lisusu ministre d’Etat mpo na makambo ya Union. Na 2014, aponami vice-président ya Assemblée constituante oyo azali na mokumba ya kosala constitution ya sika ya mboka .

Nsima na maponami ya mokonzi ya mboka ya 2015, akomaki mwasi ya yambo oyo aponami vice-présidente ya Républiki, elongo na mokonzi ya mboka John Magufuli . Aponami lisusu na 2020, akomi mokonzi ya Républiki sima ya liwa ya Magufuli na 2021, mpe azali mwasi ya liboso oyo azui ebonga oyo.

Biografi ya bomoi ya bato

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Bomwana mpe kelasi

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Samia Suluhu Hassan abotamaki na etuka ya Zanzibar . Sima ya kosilisa mateya ya mibale na 1977, akoti na Ministère ya kobongisa makambu mpe bokoli. Azali mpe kokoba na motango moko boye ya mateya. Na 1986, azwi diplôme na Institut ya Gestion ya bokoli (lelo Université ya Mzumbe ) na administration publique .

Nsima ya kozwa diplome, azali kosala mosala moko oyo ebongiseli na Programme mondial de alimentation . Kati na 1992 mpe 1994, azongeli boyekoli na ye na Iniversite ya Manchester mpe azwi diplôme ya postgraduate na nkita , .

Ebandeli ya politiki

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Samia Suluhu akoti na politiki na 2000. Aponami mosangani ya Chambre des représentants ya Zanzibar mpe aponamaki ministre na président Amani Abeid Karume . Azalaki ye moko ministre ya muasi ya liboso na cabinet, mpe azali ko mona tango mosusu ba bizaleli ya bame ya baninga na ye ya mibali . Na 2005, aponami lisusu mpe azui ebonga lisusu ya ministre, na portefeuille mosusu  [1] .

Na 2010, akendeki lisusu koponama mpo na Assemblée nationale, na circonscription ya Makunduchi mpe alongaki na koleka 80 % ya ba votes oyo epesamaki . Na sima mokonzi ya mboka Jakaya Kikwete atiaki ye ministre d'Etat na ye mpo na makambu etali bosangani . Na 2014, aponami vice-président ya Assemblée constituante oyo azali na mokumba ya kosala constitution ya sika ya mboka . Azongaki na boyekoli, na kelasi ya kokoba, mpe azwaki diplome ya master na bokolisi nkita ya lisanga na 2015 na nzela ya programme oyo epesami elongo na Iniversite ya ofele ya Tanzanie mpe Iniversite ya Sudi ya New Hampshire .

Vice-président ya République unifiée ya Tanzanie

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Na sanza ya nsambo 2015, candidat présidentiel ya CCM John Magufuli aponaki ye lokola moninga na ye ya candidat mpo na maponami ya mokonzi ya mboka, oyo ekotisama na maponami ya mokonzi ya mboka ya 2015 ya Tanzanie. ; azali mwasi ya liboso oyo candidat moko aponaki lokola moninga ya koponama na maponami ya mokonzi ya mboka ya Tanzanie , . Akomaki mpe vice-présidente ya liboso ya mwasi ya République na histoire ya mboka, sima ya elonga ya John Magufuli , . Afilika ya esita etikala koyeba mwasi moko te oyo azali vice-président wuta mibu zomi. Ezalaki Specioza Wandira-Kazibwe, Vice-président ya Ouganda kobanda 1994 kino 2003 [2] .

Ticket ya Magufuli-Suluhu elongi lisusu na maponami ya mokonzi ya mboka ya 2020 .

Mokonzi ya République unifiée ya Tanzanie

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

O mokolo ya 17 sanza ya misato 2021, Samia Suluhu asakolaki na télévision liwa ya mokonzi ya mboka Magufuli [3] . Azwaki ebonga na kolapa ndai mikolo mibale na nsima, o mokolo ya 19 sanza ya misato[4] aponamaki mpo na kokokisa mosala ya mibale oyo etikali ya mokonzi oyo akufaki. Azali mwasi ya yambo mpe moto ya mibale ya Zanzibar oyo azwi ebonga yango, nsima na Ali Hassan Mwinyi .

Kasi, ntango akómaki na bokonzi, asengelaki a sala mosala na mikakatano mingi. Kino sikoyo ayebani te na bato mingi, azali na ba réseaux minene te, azali mpe na kondima ya Bamizilma, Le Figaro alobi ete, « na kati ya lisanga na ye, Chama cha Mapinduzi (CCM), ba mobundi ya christianisme ya mobulu bazangi te » [5] .

Na tango ya kolapa ndai na ye, Samia Suluhu abandi libiangi ya bomoko, kokutana na mboka oyo ekabwani mingi mingi na ba politiki ya John Magufuli oyo azalaki liboso na ye, oyo alobelami lokola mutu ya makambu makasi mpe ezali na centralisation ya pouvoir na style ya parti moko [6] , [7] . Kasi mokambi ya lingomba ya opposition Chadema, Freeman Mbowe, akangamaki mwa basanza nsima mpo na mobulu [8] bifundeli ba kotika na nsima [9] Mwa moke nsima ya kobimisama na ye, na sanza ya misato 2022, Mbowe abengisamaki na mokonzi ya mboka Suluhu mpo na kolobela “ . makambo oyo mazali na ntina ya ekolo » mpe asakolaki sima ya bokutani ete mokonzi alingaki kondimisa ye “ . ete bato nionso ya Tanzanie bakosalela bango makambo ndenge moko, ata soki bazali na lingomba nini » [10] . Na mobembo na ye na Belgique na sanza ya mibale 2022, Samia Suluhu akutanaki mpe na Tundu Lissu, candidat ya Chadème na maponami ya mokonzi ya mboka ya 2020, mpo na kolobela makambo ya politiki ya Tanzanie mpe bozongi na ye na mboka [11] , [12] . Critique virulent ya mokonzi ya mboka Magufuli, azali kofanda na exil wuta sanza ya libwa 2017, nsima yako kozua likama ya minduki oyo abimaki azoki makasi na masasi [13], kasi azongaki na mboka mpo na maponami ya 2020 [11] .

Na bokeseni na oyo azalaki liboso na ye, Samia Suluhu na mbulamatari na ye bazali kotia makasi mpo na kopekisa kopalangana ya virus ya Covid-19 na kati ya bato ya Tanzanie. Ba quarantines ya makasi ya mikolo 14 etiamaki na ba voyageurs oyo bawutaka na ba mboka oyo ba mutations ya sika ya SARS-CoV-2 ebimi mpe ba paya basengeli kolata masque ya elongi, ba mipetola bango moko mpe basala distance sociale [14] .

Na sanza ya mwambe 2021, Samia Suluhu abimisaki ntembe nsima ya koloba na miso ya bato nyonso ete basi ya lisano ya ndembo ya Tanzanie bazali penza kitoko mpo na kobala. Alobeli mingimingi ntolo na bango “ epapala mingi ”, yango ekoki kotika nzela “ bakanisaka ete bazali mibali, basi te » [15] .

Na sanza ya mibale 2022, Samia Suluhu alongolaki ba epekiseli oyo esalemaki na ba journaux minei na mboka oyo bazali malamu na opposition, oyo epekisamaki kosala na suspension ya ba licences na bango na 2017 na ntango ya mokonzi John Magufuli. Atako président alakaki kobongisa ezalela ya bonsomi ya bapanzi sango, na mabaku mibale mbulamatari na ye etelemisaki mpo na mwa mikolo mikanda ya ndingisa ya bapanzi-nsango oyo ebukaki mobeko ya misala ya bapanzi-nsango, mobeko oyo epesi mbulamatari lotomo ya kopekisa to kokanga bapanzi-nsango na makambo ya kofinga, ya botomboki to kopalanganisa maloba ya lokuta Ministre ya information, communication mpe technologie, alobi ezali na mikano ya mbulamatari mpo na kobongisa mobeko moye mpo na kozongisa " climat ya malamu mpo na ba médias indépendants » [16] .

Na 1978, abalaki Hafidh Ameir. Bazali na bana minei  : mwana na bango ya mibale ya mwasi, Mwanu Hafidh Ameir, abotami na 1982, azali mosangani ya Chambre des représentants ya Zanzibar .

Ba références

[kokoma | kobɔngisa mosólo]
  1. Erreur de référence : Balise <ref> incorrecte : aucun texte n’a été fourni pour les références nommées daily
  2. Erreur de référence : Balise <ref> incorrecte : aucun texte n’a été fourni pour les références nommées Mshale
  3. "Error: no |title= specified when using {{Cite web}}". 17 mars 2021. https://www.lefigaro.fr/flash-actu/le-president-tanzanien-john-magufuli-est-decede-20210317. .
  4. "Error: no |title= specified when using {{Cite web}}". 19 3 2021. https://www.msn.com/fr-fr/actualite/monde/samia-suluhu-hassan-succ%C3%A8de-%C3%A0-magufuli-et-devient-la-premi%C3%A8re-femme-%C3%A0-diriger-la-tanzanie/ar-BB1eKydU. 
  5. Tanguy Berthelmet, « Tanzanie : la mort du président propulse une femme au pouvoir », Le Figaro, 20-21 mars 2021, p. 9.
  6. . 2021. https://muse.jhu.edu/article/787836. 
  7. . 2021-03-19. https://www.reuters.com/world/tanzania-swears-samia-suluhu-hassan-first-female-president-2021-03-19/. 
  8. "Error: no |title= specified when using {{Cite web}}". 2021-07-21. https://www.voanews.com/a/africa_tanzanias-main-opposition-leader-freeman-mbowe-arrested/6208519.html. 
  9. "Error: no |title= specified when using {{Cite web}}". 2022-03-04. https://www.voanews.com/a/tanzania-drops-terrorism-case-against-main-opposition-leader-freeman-mbowe/6470285.html. 
  10. . 2022-03-09. https://www.bbc.com/gahuza/amakuru-60673134. 
  11. 11,0 et 11,1 "Error: no |title= specified when using {{Cite web}}". 2022-02-17. https://www.thecitizen.co.tz/tanzania/news/national/samia-holds-face-to-face-talks-with-opposition-leader-tundu-lissu-in-brussels-3719462. 
  12. "Error: no |title= specified when using {{Cite web}}". 2022-02-17. https://www.voanews.com/a/applause-in-tanzania-after-president-meets-exiled-opposition-leader-in-belgium/6446281.html. 
  13. "Error: no |title= specified when using {{Cite web}}". 2017-09-07. https://www.aljazeera.com/news/2017/9/7/tanzania-opposition-mp-tundu-lissu-wounded-by-gunmen. 
  14. . 2021-05-03. 
  15. "Error: no |title= specified when using {{Cite web}}". https://www.ouest-france.fr/monde/tanzanie/tanzanie-la-presidente-evoque-la-poitrine-plate-des-footballeuses-tolle-sur-les-reseaux-sociaux-ff4c87c2-ee24-11eb-aea8-186d7d8ec172. .
  16. "Error: no |title= specified when using {{Cite web}}". https://ipi.media/tanzanias-lifting-of-ban-on-four-newspapers-is-step-in-right-direction-for-press-freedom/. .